Mark 16

Yesu asekwi

(Mt. 28.1-8 ; Lk. 24.1-11 ; Jn. 20.1-2)

1Tango mokolo ya Saba elekaki, Mariya ya mboka Magadala, Mariya mama ya Zaki, mpe Salome basombaki malasi mpo na kokende kopakolo nzoto ya Yesu. 2Na mokolo ya liboso ya poso, na tongo-tongo, tango moyi ebandaki kobima, bakendaki na lilita. 3Bazalaki kotunana bango na bango :

—Nani akolongolela biso libanga oyo ezali na liboso ya porte ya lilita ?
4Kasi tango batalaki, bamonaki ete libanga oyo ezalaki monene penza, bapusaki yango na pembeni. 5Awa bakotaki na kati ya lilita, bamonaki elenge mobali moko alataki nzambala ya pembe, avandaki na loboko ya mobali mpe kobanga ekangaki bango. 6Kasi elenge mobali alobaki na bango :

—Bobanga te ! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu ? Azali awa te, asiʼasekwi ! Botala esika batiaki ye.
7Kasi bokende, boloba na bayekoli na ye mpe na Piere : “Yesu akeyi liboso na bino na Galileya. Bokomona ye kuna, ndenge ayebisaki bino.” 8Basi babimaki na lilita mpe bakimaki. Kolenga ekangaki bango mpe makanisi na bango epalanganaki ; balobaki eloko moko te na moto, pamba te bazalaki kobanga.

Yesu abimelaki bayekoli na ye

9Tango Yesu asekwaki na tongo, na mokolo ya liboso ya poso, abimelaki liboso Mariya ya mboka Magadala, oyo ye abimisa milimo sambo ya mabe. 10Mariya ya Magadala akendaki koyebisa yango na ba oyo bazalaki elongo na ye, ba oyo batondaki na mawa mpe bazalaki kolela. 11Tango bayokaki ete Yesu azali na bomoyi mpe amonaki na ye, bandimaki yango te. 12Sima na yango, Yesu abimelaki bato mibale na kati na bango na lolenge mosusu, tango bazalaki kokende na mboka. 13Bazongaki mpe bayebisaki yango na basusu ; kasi bandima mpe bango te. 14Bango na sima, abimelaki mpe bapostolo zomi na moko tango bazalaki kolia ; apamelaki bango mpo bazangaki kondima mpe mpo bazalaki mitema mabanga, pamba te bandimelaki te bato oyo bamonaki ye sima ya kosekwa na ye. 15Bongo alobaki na bango :

—Bokende na mokili mobimba, mpe boteya Sango-Malamu na bato nyonso.
16Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi oyo akondima te akozwa etumbu. 17Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima : na kombo na ngai, bakobengana milimo mabe, bakoloba minoko ya sika, 18bakolokota banioka na maboko na bango, mpe tango bakomela pwazo, yango ekosala bango ata mabe moko te, bakotiela bato ya maladi maboko, mpe bakobika.

Yesu amemami na Likolo

19Tango Nkolo Yesu asilisaki koloba na bango, amemamaki na likolo, mpe avandi na loboko ya mobali ya Nzambe. 20Bongo bayekoli bakendaki, mpe bateyaki na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango, mpe azalaki kolakisa ete liloba na ye ezali ya solo, na nzela ya bilembo oyo ezalaki kolanda mateya na bango.
Copyright information for LinMNB